Psalms 37

Lilendisi mpo na moto na sembo

Nzembo ya David


1 Kotomboka te mpo na bato na mabe ;
to koyoka zuwa te mpo na baoyo basalaka mabe ;

2 Pamba te, lokola matiti
bakokawuka noki penza ;
lokola matiti ya mobesu, bakolemba noki penza

3 Tia motema na Yawe,
mpe sala malamu ;
okovanda na mokili,
mpe okosepela na kimia na esika ya matiti ya kolia.

4 Sepela kati na Yawe ;
mpe ye akopesa yo, oyo motema na yo elingaka.

5 Tika nzela na yo epai na Yawe ;
tia motema kati na ye, mpe ye akosala oyo :

6 Ye akongengisa bosembo na yo lokola moi oyo ebimaka na tongo ;
kosambisama ya likambo na yo lokola moi ya midi

7 Vanda kimia liboso na Yawe
mpe zela ye na kokanga motema ;
kotomboka te tango bato bazali kolonga
na banzela na bango,
tango bazali kosalela makanisi na bango ya mabe.

8 Tika kosilika mpe boya kanda
kotomboka te yango ememaka kaka na mabe.

9 Pamba te, bato oyo basalaka mabe bakosila nye ;
kasi baoyo batiaka mitema na bango na Yawe
bakozwa mokili lokola libula

10 Etikali moke,
bato ya mabe bakozala lisusu te ;
mpe tango okotala esika bazalaki,
bakozala wana lisusu te.

11 Kasi bato na komikitisa bakozwa mboka lokola libula ;
mpe bakosepela mpo na kimia ya mingi

12 Bato na mabe babongisaka kosala mabe na bato na sembo ;
mpe baliaka mino mpo na bango.

13 Kasi Yawe asekaka bato na mabe,
pamba te ayebi ete mokolo na ye ezali koya.

14 Bato na mabe babimisi mopanga,
mpe babongisi tolotolo,
mpo na koboma moto akelela mpe mobola,
mpo na koboma baoyo banzela na bango ezali alima

15 Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko ;
mpe batolotolo na bango ekobukana.

16 Mwa biloko moke oyo moto na sembo azali na yango,
eleki biloko ebele oyo bato mingi ya mabe batondi na yango.

17 Pamba te nguya ya bato na mabe ekobukana,
kasi Yawe alendisaka bato na sembo.

18 Mikolo ya bato bazangi pamela eyebani epai na Yawe ;
mpe bomengo na bango ekowumela seko.

19 Na tango ya pasi bakokawuka te ;
na mikolo ya nzala, bakosepela mingi.

20 Kasi bato na mabe bakobeba ;
banguna ya Yawe bazali lokola kitoko ya bilanga
bakolimwa ndenge molinga elimwaka.

21 Moto na mabe adefaka mpe azongisaka te ;
kasi moto na sembo mingi akabaka.

22 Bato oyo Yawe apambola bakozwa mboka lokola libula ;
kasi baoyo ye alakela mabe bakolimwa.
23Soki Yawe asepeli na nzela ya moto alendisaka makolo ya motu wana

24 Ata soki abeti libaku, akotikala kaka ya kokweya te ;
pamba te Yawe asimbaka ye na loboko na ye.

25 Nazalaki elenge
mpe nakomi mobange,
naino namoni te basundoli moto na sembo ;
to bana na ye babanda kosenga-senga lipa.

26 Bazali tango nyonso kokaba mingi mpe
bapesaka na bonsomi nyonso,
mpe bana na ye bakopambolama.

27 Boya mabe mpe sala malamu ;
bongo okovanda na mokili libela na libela.

28 Pamba te Yawe alingaka bosembo
mpe abosanaka bandimi na ye te.
Bakobatelama tango nyonso ;
kasi bana na bato na mabe, baoyo bakobotama, bakosila bango nyonso.

29 Bato na sembo bakozwa mokili lokola libula ;
mpe bakovanda kuna seko na seko.

30 Monoko ya moto na sembo ebimisaka maloba ya bwanya,
mpe lolemo na ye elobaka sembo.

31 Mibeko ya Nzambe na ye ezali na motema na ye
mpe makolo na ye ekoki kokende na moselu te.

32 Moto na mabe atalaka moto na sembo na miso mabe ;
mpe alukaka mwaye ya koboma ye.

33 Kasi Yawe atikaka te moto na sembo
na se ya nguya ya moto ya mabe ;
to atikaka bango te bakweya na tango bakosambisama.

34 Talela Yawe,
mpe batela nzela na ye.
Bongo ye akonetola yo mpo ozwa mboka lokola libula.
Mpe tango bakosilisa bato na mabe,
yo okomona yango.

35 Namonaki moto na mabe mpe moto azanga mawa,
na kofulusama lokola nzete ya mobesu
na mabele na ye abotama.

36 Kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te ;
nalukaki ye, kasi amonanaki lisusu te.

37 Tala moto azanga pamela, tala malamu moto na alima ;
pamba te suka ya moto ya ndenge oyo,
ezali kimia.

38 Kasi bato nyonso ya masumu bakokufa ;
suka ya bato na mabe ekozala nde libebi.

39 Lobiko ya bato na sembo ewutaka na Yawe ;
ye azali ndako ya bango ya makasi na tango ya minyoko.

40 Yawe asalisaka bango mpe akangolaka bango ;
akangolaka bango na maboko ya bato na mabe
mpe abikisaka bango,
pamba te balukaka kobombama epai na ye.
Copyright information for LinMNB